Adorons L'Éternel (Gael Music) - Loyembo la ngai Text

Songtext zu Loyembo la ngai


Nkolo yamba loyembo la nga
Libonza ya moto asimbami na yo
Nazali elembo ya bolingo bua yo
Mokonzi ya bomoyi na ngai
Otika likolo polele Masiya
Po tomona kembo pe nguya na yo
Oza liziba lia mayi ma lobiko
Yo Nkumu ya bankumu banso

Y'Ozali bopemi bua ngai
Bipayi nakotika mikumba mia ngai
Ozali solo likonzi lisimbi ndako
Masiya na ngai

Y'Ozali lokumu la ngai
Bipayi nakosímba soki nalembi
Ozali bipayi nakitisaka motéma
Masiya na ngai

Ozali nzete ya bolingo Masiya
Nakati y'elanga ya motema na ngai
Epesa fololo ya malasi kitoko
Na miso ya Nzambe na bule
Opesa bokono kombo ya lobiko
Obenga liwa na kombo ya mpongi
Po ete lisekwa lizali yo Masiya
Mokonzi ya bakonzi banso

Nasopi motema na ngai
Liboso ya kiti ya ngolu na yo
Po ete lobiko na ngai ekowuta na yo
Masiya na ngai
Kitisa nguya na yo Nkolo
Awa tokobelela kombo na yo

Lakisa biso nkembo pe makasi na yo
Nzambe na nguya

Yamba maloba ya motema na ngai
Mosopani liboso na yo mosantu
Nazongisa kembo pe lokumu na yo
Yo nzela pe bomoyi ya seko
Ata molili ya mokili eyindi
Mwinda mua yo moko ngengisa nzela na ngai
Oyo asimba ngai loboko ezali yo
Mokonzi ya bomoyi na ngai

Nasopi motema na ngai
Liboso ya kiti ya ngolu na yo
Po ete lobiko na ngai ekowuta na yo
Masiya na ngai
Kitisa nguya na yo Nkolo
Awa tokobelela kombo na yo
Lakisa biso nkembo pe makasi na yo
Nzambe na nguya

Senhor aceita a minha canção
O sacrificio do homen te pertence
Sou o signo do teu amor
O Senhor do meu coração
Senhor aceita a minha canção
O sacrificio do homen te pertence
Sou o signo do teu amor
O Senhor do meu coração

Adorons L'Éternel (Gael Music) - Loyembo la ngai Songtext

zu Loyembo la ngai von Adorons L'Éternel (Gael Music) - Loyembo la ngai Lyrics Adorons L'Éternel (Gael Music) - Loyembo la ngai Letra da Loyembo la ngai da Adorons L'Éternel (Gael Music) - Loyembo la ngai Text Loyembo la ngai Adorons L'Éternel (Gael Music) Loyembo la ngai texto

Noch keine Übersetzung vorhanden. Musik-Video-Miniaturansicht zu Loyembo la ngai Songtext von Adorons L'Éternel (Gael Music)

Video zum Loyembo la ngai


Loyembo la ngai Songtext von Adorons L'Éternel (Gael Music)


Andere Songtexte und Deutsche Übersetzungen

von Adorons L\'Éternel (Gael Music)

Beliebt Lyrics

Beliebt Neu Songtexte